Extra Musica - Losambo

Band: Extra Musica.
Song: “Losambo”.

Atalaku / Animation : Kila Mbongo Mazikoli.
Vocalists: Guy Guy Fall , Quentin Moyascko , Mbon Sylvain “Oxygen” , Doudou Copa , Herman Ngassaki , Regis Tuba ( RIP ) and Papy Bastin.
Guitars: Rogatien Imbuma “Roga Roga” , Durell Loemba , Espe Bass and Sonor Digital.
Keyboards: Christian Kingstall.
Percussion: Emery Mbonda.
Drums: Ramatulaye Ngolali.

:tada::tada:

The song lyrics and we can all sing along ..:blush::tada:

Losambo
Ya Extra
Moto soki nanu akufi te, koseka ye te

Tata Nzambe, yoka losambo eh
Losambo (Losambo)

Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tolamukaka na tongo mpo toluka la vie
Tolamukaka na tongo mpo tomeka nzoto
Pesa nguya, Papa, mpo tokoka yango, hein

Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tolamukaka na tongo mpo toluka la vie
Tolamukaka na tongo mpo tomeka nzoto
Pesa nguya, Papa, mpo tokoka yango, hein

Ah, Nzambe Tata
Yo okeli ngai sima ya biloko binso ya se
Yo opesi moto mayele koleka biloko binso okela
Pona nini ngai te, ah Tata Tata Nzambe

Tata Nzambe, yoka losambo ya bana (Abilissi na Paris, yo-yo)
Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tolamukaka na tongo mpo toluka la vie
Tolamukaka na tongo mpo tomeka nzoto
Pesa nguya, Papa, mpo tokoka yango, hein

Mokili etondi pasi, mokili etondi mabe
Nzambe, Allah salisa ngai eh
Baninga bazuaka se na realité, Nzambe
Oyo ya ngai se na ndoto
Yahweh, salisa nga
Nzambe Tata
Ah ngai, muana

Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tolamukaka na tongo mpo toluka la vie
Tolamukaka na tongo mpo tomeka nzoto
Pesa nguya, Papa, mpo tokoka yango, hein

Nakofukama, tika na senga na Yahweh
Ye moto asala likolo na se
Tata Mozalisi
Tika nasenga epayi na yo, Tata
Salisa biso, Papa
Na mokili oyo ya se

Tata Nzambe, yoka losambo ya bana (Igor na Paris, yo-yo)
Tata Nzambe, yoka losambo ya bana
Tolamukaka na tongo mpo toluka la vie
Tolamukaka na tongo mpo tomeka nzoto
Pesa nguya, Papa, mpo tokoka yango, hein

Nani moto apesa pema, sé ye
Mokolo akobotola yango oyo nde bilelo
Tokumisa ye, Tata Nzambe mosungi berger

Oh, nakosenga na yo Nzambe mozalisi
Bikisa biso bana ya le Congo
Bitumba bitondi na mboka oyo
Kotika biso te na pasi oyo

Lokola otikaka Caina
Otikaka batu ya Noé
Otikaka Sodome na Gomorhe
Tala pasi na biso

Brazzaville etondi pasi

Lokola otikaka Caina
Otikaka batu ya Noé
Otikaka Sodome na Gomorhe
Tala pasi na biso

:tada::tada::tada: